NAKOYEMBA NA NZELA

1. Nakoyemba na nzela, komema bato Kuna na Ekulusu, Elonga ezali Mbanzi mingi ezokisi, Nkolo ayebi Azali kokamba, mpe nabili ye. Chr : Nalingi komona, komona Yesu Nayemba n'esengo ngolu na Yesu Na nzela na lola koyembela Ye; Mikumba esili, nabikisami 2. Ntango mikakatano ekoyela ngai, Mobikisi Ye moko akobatela Ye moko akokamba ngai awa na nse; Sima nakokoma kuna na lola. 3. Na mosala na Nzambe, butu ekoya Makasi ete namona lisusu te Nabelemi na Nkolo angengeli ngai Tosangana elongo kino na lola. 4. Na kati na mokili, mpasi ezali Nde nakoki komona Nkolo na nkembo Azali na mopanga, akokamba ngai Mpe abateli ngai: nkembo na Yesu.