Papa Yoka Ngai - Lady Grace Matondo - Olianne Music

Ps 34:19 A/C lady Grace Matondo Lyrics papa yoka nga Nzambe na nga, yoka losambo na nga S'il te plaît papa ahah, yoka kolela na nga Nzambe ya Lola ahah, yoka losambo na nga Nzambe ya ngolu, yoka kolela na nga ah ahah *Nakoma sujet ya litshio na quartier eh, Ba leki bazo bala, nga libala eza te Nakoma sujet ya mafinga na belle famille,banda na bala bana baza te eheh Na tanga ba classe ebele ba diplôme nioso,ata nazui mosala esukelaka nga kaka mabe Na mituni pona Nini souffrance ya boye, Na mituni pona Nini souffrance ya boye eh ehehihhh Papa na nga ahah, papa na nga ahah nzambe,yoka kolela na nga, pangusi pinzoli na nga ah ahah Papa na nga ahah, papa na nga ahah nzambe yoka kolela na nga, pangusi pinzoli Olobaki oyo toko senga na kombo na yo,na losambo ekopesamela biso,le malheur atteint souvent le juste , mais l'éternel l'en délivre toujours (psaume 34:19) Natamboli miso na nga na likolo, esika lobiko na nga ekowuta se na yo ohhh Refrain : moto ya suka kaka yo Na likambo na Nga ya suka kaka yo ANA pe asukaki papa,kasi opesaki ye biyano.Esther pe asukaki papa na nga,kasi opesaki ye biyano (Ester 2:17) ,tala nga pe Lelo oyo na ye pesa nga pe biyano David aloba amona te moyengebene akelela ata kutu muana na ye azanga lipa oh (psaume 37:25) Na Mona te balanda yo bakufa na soni, Na Mona te balanda yo bakufa na pasi EYANO na nga se yo yesus, elikia na nga se yo papa Atako maloba ezo bima te yesus n'a nga yawhe otali Katia motema ahah Refrain : moto ya suka kaka yo...... Moto ya suka se yo Esika na tiaka motema na nga, elikia na nga nioso kaka yo Na likambo na Nga telema yesus Yawhe bundela nga , elikia na nga se n'a yo se n'a yo se na yo yesus Yaya, Yaya bundela nga Yaya Kotela nga Yaya Bikisa nga Yawhe longisa nga Nzambe na nga, yoka losambo na nga, S'il te plaît papa ahah, yoka kolela na nga Nzambe ya Lola ahah, yoka losambo na Nzambe ya ngolu, yoka kolela na nga ah